Malako 1

1
Mabongisi ya lotomo ya Yesu
Mateya ya Yoane Mobatisi
(Mat 3.1-12; Lk 3.1-6, 15-18; Yn 1.19-28)
1Tala ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe, 2kolanda ndenge ekomama kati na mokanda ya mosakoli Ezayi :
« Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo,
ye nde akobongisela Yo nzela.
3Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe :
‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo,
bosembolela Ye banzela ya mike ! › »
4Boye Yoane azalaki kati na esobe mpe azalaki kosakola : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino ! »
5Bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazalaki kokende epai na ye ; bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani. 6Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi. 7Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye. 8Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi Ye akobatisa bino kati na Molimo Mosantu. »
Libatisi mpe komekama ya Yesu
(Mat 3.13-17; Lk 3.21-22)
9Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti ya Galile, mpe Yoane abatisaki Ye na ebale Yordani. 10Tango kaka abimaki na mayi, amonaki Likolo kofungwama mpe Molimo kokitela Ye lokola ebenga. 11Mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi ! »
(Mat 4.1-11; Lk 4.1-13)
12Mbala moko, Molimo amemaki Yesu kati na esobe 13epai wapi avandaki mikolo tuku minei mpe Satana azalaki komeka Ye. Azalaki kuna elongo na banyama ya zamba, mpe ba-anjelu bazalaki kopesa Ye bilei.
Lotomo ya Yesu kati na Galile
Yesu abandi koteya
(Mat 4.12-17; Lk 4.14-15)
14Tango babwakaki Yoane kati na boloko, Yesu akendeki na Galile epai wapi azalaki koteya Sango Malamu ya Nzambe. 15Azalaki koloba : « Tango ekoki, mpe Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu. »
Bayekoli ya liboso ya Yesu
(Mat 4.18-22; Lk 5.1-3, 10-11)
16Mokolo moko, wana Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galile, amonaki Simona mpe Andre, ndeko na ye. Bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi. 17Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »
18Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu. 19Wana Yesu akobaki kotambola, amonaki na mosika Jake, mwana mobali ya Zebede, oyo azalaki elongo na Yoane, ndeko na ye ; bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango. 20Mbala moko, Yesu abengaki bango. Batikaki Zebede, tata na bango, kati na bwato elongo na basali na ye mpe balandaki Yesu.
Yesu abengani molimo mabe
(Lk 4.31-37)
21Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na Kapernawumi. Na mokolo ya Saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. 22Bato bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te ateyaki na bokonzi oyo balakisi ya Mobeko bazangaki.
23Kaka na tango yango, ezalaki na moto moko, kati na ndako ya mayangani, oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki koganga :
24— Yesu ya Nazareti, olingi nini ? Oyei nde koboma biso ? Nayebi Yo malamu, ozali Motindami mpe Mosantu ya Nzambe !
25Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo :
— Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo.
26Molimo mabe eningisaki moto yango makasi mpe ebimaki na koganga. 27Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana :
— Oyo ezali lisusu likambo nini ? Tala mateya ya sika oyo etondi na nguya ! Azali kopesa mitindo ata na milimo mabe, mpe ezali kotosa Ye !
28Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile.
Yesu abikisi babeli ebele
(Mat 8.14-15; Lk 4.38-39)
29Tango Yesu abimaki na ndako ya mayangani, akendeki elongo na Jake mpe Yoane na ndako ya Simona mpe Andre. 30Nzokande, mama-bokilo ya Simona azalaki ya kolala mpo ete azalaki kobela fievele ; mbala moko, bapesaki Ye sango. 31Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye ; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei.
(Mat 4.24; 8.16-17; Lk 4.40-41)
32Wana moyi elalaki mpe pokwa eyaki, bamemelaki Yesu babeli nyonso mpe bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. 33Bato nyonso ya engumba bayaki kosangana liboso ya ekuke ya ndako ; 34bongo Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na pasi ya ndenge na ndenge, abenganaki milimo mabe ebele mpe apekisaki yango koloba ; pamba te milimo mabe eyebi nani oyo Ye azali.
(Lk 4.42-44)
35Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela. 36Simona elongo na baninga na ye bakendeki koluka Yesu. 37Tango bamonaki Ye, balobaki na Ye :
— Bato nyonso bazali koluka Yo.
38Kasi Ye azongiselaki bango :
— Tokende na esika mosusu, na bamboka ya zingazinga, mpo ete nateya mpe kuna, pamba te nayaki mpo na yango.
39Boye, atambolaki na Galile mobimba ; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani mpe kobengana milimo mabe. 40Moto moko na maba apusanaki pene na Yesu, afukamaki mpe asengaki na Yesu :
— Soki olingi, komisa ngai peto.
41Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki :
— Nalingi ete ezala bongo, koma peto.
42Mbala moko, maba elongwaki na nzoto ya mobeli mpe akomaki peto. 43Mbala moko, Yesu azongisaki ye mpe akebisaki ye :
44 — Yoka Ngai malamu, koyebisa likambo oyo na moto moko te ; kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa, mpo na kopetolama na yo, likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
45Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso ; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.

Zur Zeit ausgewählt:

Malako 1: MNB

Markierung

Teilen

Kopieren

None

Möchtest du deine gespeicherten Markierungen auf allen deinen Geräten sehen? Erstelle ein kostenloses Konto oder melde dich an.

YouVersion verwendet Cookies, um deine Erfahrung zu personalisieren. Durch die Nutzung unserer Webseite akzeptierst du unsere Verwendung von Cookies, wie in unserer Datenschutzrichtlinie beschrieben